John 21

Yesu abimeli lisusu bayekoli na ye

1Sima na yango, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na ye na libongo ya ebale ya Tiberiade. Abimelaki bango boye : 2Simon Piere, Toma (oyo babengaka : “Lipasa”), Natanayele (ya mboka Kana na mokili ya Galileya), bana ya Zededeo, mpe bayekoli mibale mosusu bazalaki esika moko.

3Simon Piere alobaki na bango :

—Nakei koluka bambisi !

Bango mpe balobaki na ye :

—Biso mpe, tokokende elongo na yo.

Bakendaki mpe bamataki na bwato ; kasi butu wana bazwaki eloko moko te.

4Na tongo-tongo penza, Yesu atelemaki na libongo ; kasi bayekoli bayebaki te ete ezalaki ye.

5Bongo abengaki bango :

—E e bana ! bozwi mbisi ?

Bazongiselaki ye :

—Te !

6Yesu alobaki na bango :

—Bobwaka monyama na loboko ya mobali ya bwato, mpe bokozwa !

Tango babwakaki yango, bakokaki kobenda yango te, pamba te etondaki na bambisi ebele penza.

7Bongo Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Piere :

—E e ! ezali Nkolo.

Tango Simon Piere ayokaki ete ezali Nkolo, alataki elamba na yeya likolo, (mpo alongolaki yango), mpe amibwakaki na mayi.
8Bongo bayekoli mosusu balandaki kati na bwato, mpe bazalaki kobenda monyama oyo etondaki na bambisi, pamba te bazalaki mosika te na mokili, ezalaki pene-pene ya bametele nkama moko.

9Tango bakitaki na mokili, bamonaki moto ya makala, mpe mbisi likolo na yango, na lipa.

10Yesu alobaki na bango :

—Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kokanga !

11Simon Piere amataki na bwato, mpe abendaki monyama na mokili. Yango ezalaki ya kotonda na bambisi nkama moko na tuku mitano na misato ya minene. Atako ezalaki mingi, kasi monyama epasukaki te.

12Bongo yesu alobaki na bango :

—Boya mpe bolia.

Mpe moyekoli ata moko te amekaki kotuna ye : “Ozali nani ?” pamba tebayebaki ete ezali Nkolo.
13Yesu apusanaki pembeni na bango, akamataki lipa mpe apesaki bango ; asalaki mpe ndenge moko mpo na mbisi.

14Wana ezalaki mbala ya misato oyo Yesu abimelaki bayekoli na ye, sima ya kosekwa na ye kati na bakufi.

Yesu na Piere

15Tango basilisaki kolia, Yesu alobaki na Simon Piere :

—Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai mingi koleka bango ?

Ye azongiselaki ye :

—E e Nkolo ! oyebi ete nalingaka yo !

Yesu alobaki na ye :

—Batela bana meme na ngai !

16Bongo alobaki na ye mpo na mbala ya mibale :

—Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai ?

Azongiselaki ye :

—E e Nkolo ! Oyebi ete nalingaka yo !

Yesu alobaki na ye :

—Batela bameme na ngai !

17Bongo Yesu alobaki na ye lisusu mpo na mbala ya misatu :

—Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai ?

Piere ayokaki mawa mingi na motema, pamba te Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : “Olingaka ngai ?” Bongo azongiselaki ye :

—Nkolo, oyebi makambo nyonso, oyebi ete nalingaka yo !

Yesu alobaki na ye :

—Batela bameme na ngai !
18Nazali koloba na yo ya solo penza : tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga mokaba na yo yo moko, mpe ozalaki kokende esika yo moko ozalaki kolinga ; kasi tango okokoma mobange, okotanda maboko na yo, mpe moto mosusu nde akokanga yo mokaba, mpe akomema yo epai yo okolinga te !

19Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya liwa oyo Piereasengelaki kokufa na yango mpo na nkembo ya Nzambe. Sima ya kolobabongo, alobaki na Piere :

—Landa ngai !

20Piere atalaki na sima, mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi azalaki kolanda bango ; ezali moyekoli oyo mpe, tango bazalaki kolia, apusanaki pene-pene ya Yesu, mpe atunaki ye : “Nkolo, nani akoteka yo ?”

21Tango Piere amonaki ye, atunaki Yesu :

—Nkolo, okanisi nini mpo na ye ?

22Yesu azongiselaki ye :

—Soki nalingi ete azala na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo ? Kasi yo, landa ngai.

23Sango yango epanzanaki na kati ya bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki te ete moyekoli wana akokufa te ; kasi alobaki : “Soki nalingi ete azala na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo ?”

24Ezali moyekoli wana nde azali kotatola makambo oyo, mpe akomaki yango. Mpe toyebi ete litatoli na ye ezali ya solo.

Mpo na kosukisa

25Yesu asalaki lisusu makambo mingi mosusu. Soki bakomaki yango moko na moko na mikanda, na kanisi, mbele ata mokili ekokaki te kobomba babuku oyo elingaki kokomama.
Copyright information for LinMNB